LIBERTÉ PLUS LINGALA

0 0
Read Time:1 Minute, 28 Second

RDC : Gouvernement ako utiliser option militaire te po asilisa crise oyo eza na EST. Ako salela kaka bic na papier ; koloba ete diplomatie pe dialogue

Na boye,  »toko salela ba nzela mibale (processus): ya Nairobi pe oyo ya Luanda.

Oyo ya Nairobi eko sangisa Gouvernement ya RDC na ba groupes armés nyonso bazalaka na EST, y compris M23, po ayoka tina nini etinda bango basimba manduki pe koluka lolenge nini ba ndeko ya ba groupes armés ba kozonga na vie civile. Yango nde bazo benga démobilisation pe reinsertion sociale. Pona kosala makambu malamu, Gouvernement wuta kala atia mécanisme moko ba bengi  » Programme de désarmement, démobilisation, relèvement communautaire et stabilisation (PDDRC-S).

Oyo ya Luanda ekosangisa Président ya RWANDA, Paul Kagame pe moninga na ye ya RDC. Kuna nde Félix Tshisekedi ako tuna ya ye muninga boni boni azuaka tangu inso likanisi ya ko tia mbilinga mbilinga na ekolo ya Congo. Na suka ya masolo na bango bako signer pacte oyo eko sala été moko te na bikolo na bango atia mususu na mbulungani to asala makambu oyo eza kobebisa kimia ya moninga.

Kasi Yambo tokoma wana, esengeli Rwanda abimisa ba soldats na ye atinda na RDC ; esengeli lisusu ba M23 ba longwa na bisika nyonso bango bazuaki na bitumba kati ya RDC. Pe oyo ako landa makambu wana te, lisanga ya bomoko ya mokili mobimba (Communauté internationale) ako sala maye manso oyo esengeli po elakisa ye que mokili oyo ezali ya mibeko pe mitindo.

NA NDENGE MAKAMBU EZALI KOKENDE, ESENGELI NA BA TATA YA MOLIMO OYO BA BENGI BA ÉVÊQUES CATHOLIQUES PE PROTESTANTS BATIKA MAKAMBU YA BA DIALOGUE NA BANGO WANA PO EZA NA TINA MOKO TE, NDE EZALI MINDONDO YA PAMBA.

YA BINO MÉDIA YA VÉRITÉ LIBERTÉ PLUS NA KINSHASA, CAPITALE YA RDC.

Happy
Happy
0 %
Sad
Sad
0 %
Excited
Excited
0 %
Sleepy
Sleepy
0 %
Angry
Angry
0 %
Surprise
Surprise
0 %

Average Rating

5 Star
0%
4 Star
0%
3 Star
0%
2 Star
0%
1 Star
0%

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *